Yaka tobonzela nzambe mabonza
Refrain. Yaka tobonzela Nzambe mabonza (2x)
Yaka yaka ndeko o tobonzela Nzambe (2x)
Tobonzela Nzambe, misala mya biso: tobonzela Nzambe (2x)
Mabonza mawuti na misala mya biso: tobonzela Nzambe (2x)
1. Batata botelema tobonzela Nzambe (2x)
Tobonzela Ye lokola Abrama : abonzelaki Nzambe (2x) e
2. Bamama botelema tobonzela Nzambe (2x)
Tobonzela Ye lokola mwasi bonzenge, abonzelaki Nzambe (2x) e
3. Bilenge botelema tobonzela Nzambe (2x)
Tobonzela Ye lokola Abele, abonzelaki Nzambe (2x) e
Bandeko boya tobonzela Nzambe,
Apesi biso biloko binso bya mokili, tobonzela Ye
Eteni ya zomi ya biloko bya biso o
Batata boya, bamama boya, bilenge boya a,
Banso tobonzela Nzambe (2x)
Yo tatae (2x), yo mama e (2x)
Bonzela Nzambe libonza kitoko mpe okoyoka esengo,
Bonzela Nzambe eteni ya zomi ya biloko bya yo
Wana okomona, bolamu bwa Nzambe.