Boya tosangisa maboko
Boya, boya tosangisa maboko mboka epeli moto,
Boya, boya tosangisa maboko tozangi eloko ya kopesa Mokonzi
Mokili mopeli moto, Tozangi eloko ya kopesa Mokonzi,
Mokili mopeli moto
Tozangi eloko ya kopesa Mokonzi wa biso
Yo opesa ndambo, Ngai na pesa ndambo, ye apesa ndambo,
Totonga totonga lingomba Tobongisa mokili mwa Nzambe (2x)
Batata, bamama e : Telema, telema, pesa mwa libonza lya yo o o o
Telema a, telema a tambola na libonza lya yo o o o
Mokonzi akosenge yo,
Tala maboko ma yo mazali mpamba,
Tala motema motondi na nkele,
Tala biloko bya yo epakwami na mbindo
O o o pesa Mokonzi (2x)
Nakopesa Mokonzi nini ? Motema motondi na zuwa;
Nakopesa Mokonzi nini ? Motema motondi na nko
Nakopesa Mokonzi nini ? Motema motondi na nkele
O o tolingana tolingana uhm uhm uhm
O o tolimbisana topesana boboto
Telema na yo ndeko, Yaka kopesa motema motondi na nkele,
Mokonzi abongola mwango
- Batata boya e boya e : yaka, yaka e yaka
- Bamama boya e boya e : yaka, yaka e yaka
- Bilenge boya e boya e : yaka, yaka e yaka
Tambola na libonza topesa,
Mokonzi wa biso yango o likolo
Apesi biso makasi tosalela Ye
Telema batata e e e : yaka, yaka e yaka
Telema bamama e e e : yaka, yaka e yaka
Telema bilenge e e : yaka, yaka e yaka
Topesa libonza lya biso : yaka, yaka e yaka
Telema, telema pesa ngo libonza,
Libonza mpimbo libonza, libonza kitoko libonza
Toyokana banso libonza, totika kosuana libonza,
Tosimbana banso libonzaYaka e yaka e yaka e