Yamba mabonza ma biso
Yamba mabonza ma biso Tata (2x)
Eteni ya zomi topesi na Yo e (2x)
Manso tozwi na esengo yamba e (2x)
Mawuti na misala mpe bilanga yamba e (2x)
1. Tobonzeli Yo baboti ba biso (2x)
Misala mya bango : Tata yamba e
Lifuta bazui : Tata yamba e
Ndunda ya bilanga e : Tata yamba e
Na mbisi ya mai : Tata yamba e
Mpe bolingo na libota : Tata yamba e
1-3. Yamba Tata Nzambe e e, mabonza ma bana ba Yo o o,
Bapesi na Yo, bapesi na Yo e,
iyole o iyole iyole iyo
2. Tobonzeli Yo bilenge ba biso (2x)
Kelasi na bango : Tata yamba e,
Kotosa baboti : Tata yamba e,
Kotika kosuana : Tata yamba e
Koboya bitumba e, Koti ngama na losambo
3. Tobonzeli Yo bamibonza banso (2x)
Banganga Nzambe : Tata yamba e
Na bamamelo : Tata yamba e
Komibonza na nzoto : Tata yamba e
Mpe na motema Libonza mpimbo (2x)