Tokobonzela yo mokonzi
Refrain. Tokobonzela Yo lelo mabonza ma biso
Mabonza mawuti na misala mya biso e
Tata nzambe yamba e yamba mango e lelo (2x)
1. Tokobonzela Yo lelo e mampa na vino,
Toyei e lelo e kobonzela Yo e yamba.
2. Tokobonzela Yo lelo mosolo mwa biso,
Tozui lelo na misala mpe bilanga e,
Toyei e lelo e kobonzela Yo e yamba.
3. Batata bayei lelo kobonzela Yo e
Lokola Abarama abonzelaki Yo e,
Bayei e lelo e kobonzela Yo e yamba.
4. Bamama bayei lelo kobonzela Yo e
Lokola mwasi bonzenge abonzelaki Yo e,
Bayei e lelo e kobonzela Yo e yamba.
5. Bilenge bayei lelo kobonzela Yo e
Lokola Abele abonzelaki Yo e,
Bayei e lelo e kobonzela Yo e yamba.