Toyemba App

O altare toyei na mabonza

D.Mishibabo

Refrain. O Altare toyei na mabonza toyei kobonzela Nzambe manso tozwi e.

Eteni ya zomi tobonzeli Nzambe Tata,

Eteni ya zomi oyo libonza mpimbo. (2x)

1. Telema telema tata e telema, na mbongo na maboko

    Lifuta lya mosala osali. Bolingo na libota mpe kolendisa mama e,

    Na mpasi to na bwale oyo libonza kitoko.

2. Telema telema mama e telema na eteni ya zomi ya lifuta

    Ya misala mya yo. Mbano ya mombongo mpe kolendisa tata e,

    Na mpasi to na bwale oyo libonza kitoko.

3. Telema telema Elenge e telema na mbongo na maboko

    Mpe bongisa motema, komipesa na losambo,

    Kotosa baboti , kotika mobulu oyo libonza kitoko.