Toyemba App

Nayambi nzambe

J.Nimampasi

Refrain. Nayambi, nayambi Nzambe, ngai nayambi ya solo (2x)

1. Nayambi Nzambe Tata Ye nde akeli likolo,

    Akeli mpe nse eye ngai nayambi ya solo

2. Nayambi Nzambe Mwana, mwana se moko wa Ye,

    Akomi moto na nguya ya Elimo Santu

3. Abotami na ngondo mosantu Maria

    Ayoki mpasi o eleko ya Pontio Pilato bamobaki o kuzuze

4. Awei akundami, akiti o limbe, o asekwi o mokolo mwa misato, abuti o likolo

5. Azali kuna o loboko la Nzambe Tata wa bokasi,

    Nde ayei lisusu kokata likambo lya bato banso,

    Baye bazali na bomoi na baye bawa

6. Nayambi Elimo Santu ngai nayambi ya solo

    Nayambi Eklezya esantu, esantu Katoliko,

    Lisanga lya basantu, bolimbisi masumu,

    Nsekwa ya bato, bomoi bwa lobiko. Amen