Nayambi e
1. Nayambi Nzambe Tata wa bokasi bonso.
Mozalisi wa likolo na nse, nayambi.
2. Nayambi Yezu Kristu mwana se moko wa Ye,
Na nguya ya Elimo santu akomi moto.
3. Abotami na ngondo Maria, ayoki bolozi o eleko ya Posio Pilato.
4. Bamobaki o kuruze, awei, akundami,
Asekwi mokolo mwa misato, abuti ’ o likolo.
5. Azali o loboko la mobali la Nzambe Tata,
Nde ayei kokata likambo lya bato banso.
6. Nayambi Elimo Santu, nayambi Eklezia Esantu Kotoliko,
Sekwa ya bato, bomoi bwa lobiko. Amen