Toyemba App

Nayambi nzambe se moko

J.Abbé makamba

 1. Nayambi Nzambe se moko Tata wa bokasi bonso,

     Mozalisi wa likolo na nse wa biloko binso

     Biye biko monono mpe biye biko monono te

     Nayambi Mokonzi moko Yezu Kristu, Mwana wa Nzambe

     Abotami na Tata naino bileko bibandi te,

     Ye Nzamb’awuti na Nzambe, Ye Mwinda awuti na Mwinda,

     Nzambe wa solo awuti na Nzambe wa solo,

     Tata aboti Ye kobota asali Ye te

     Mwan’azali na Tata Nzambe moko,

     Na Ye Tata akeli biloko binso :

Refrain. Eh Nayambi e, (4x)

2. Ayaki awa o nse mpo ya biso bato, mpo ya kobikisa biso,

    Akamati nzoto na nguy’Elimo Santu

    Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto : nayambi e

3. Babaki Ye o Kuruse mpo ya biso, oeleko ya Pontio Pilato,

    Ayoki mpasi awei akundami (2x)

4. Asekwi nsima ya mikolo misato

   Lokol’ekomami o mikanda misantu,

   Abuti o likolo azali o nkembo ya Nzambe Tata e: nayambi

5. Nd’ayei lisusu na nkembo kokata likambo lya bato banso

    Baye bazali na bomoi na baye bawei

    Bokonzi bwa Ye nde bosuki te

6. Nayambi mpe Elimo Santu Mokonzi akopesa biso bomoi e,

    Awuti na Tata e, awuti mpe na Mwana

    Tokumbamela Ye mpe tokembela Ye elongo na Tata,

    Mpe na Mwana, Ye nde mot’alobaka na monoko mwa ba profeta

7. Nayambi Eklezya se yoko Esantu ey’ezali ya bato banso,

    Ebandaki na ba postolo, nandimi batisimo se yoko e

    Ekolongola masumu nakozila nsekwa ya bawa e

    Mpe bomoi bokoya nsima. Amen amen