Ngai nayambi
Refrain. Nayambi e ngai nayambi oh nayambi e
1. Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa likolo na nse
Wa biloko biye bikomonono mpe na biye bikomonono te
2. Nayambi Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe,
Abotami na Tata e naino bileko bibandi te
3. Ye Nzambe awuti na Nzambe, Ye Mwinda awuti na Mwinda,
Nzambe wa solo (3x) awuti na Nzambe wa solo
4. Ayaki awa o nse, mpo ya kobikisa biso,
Akamati nzoto na nguya y’Elimo Santu,
Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto
5. Bamobaki o Kuruse o eleko ya Pontio Pilato,
Awei akundami nsima’a mikolo misato asekwi,
Lokol’ekomami o mikanda, abuti o likolo
Azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata
6. Nayambi Elimo Santu akopesa biso bomoi,
Awuti na Tata mpe na Mwana, tokumbamela Ye
Mpe tokembela Ye, Ye nde moto alobaka na monoko mwa ba profeta
7. Nayambi Eklezya Esantu, ezali ya bato banso,
Ebandaki na bapostolo, nandimi batisimo se yoko,
Ekolongola masumu, nakozela nsekwa ya bawa
Mpe bomoi bokoya nsima. Amen!