Toyemba App

Nayambi

Diocese de lisala

Refrain. Nayambi e, nayambi Nzambe Tata e Mokonzi,

Nayambi Yezu Kristu Mwana a wa Ye,

Nayambi Elimo Santu e Mobondi, ee nayambi ee

1. Nayambi ee, nayambi Nzambe Tata e Mokonzi,

    Azalisi molongo se na nguya ya Ye,

    Atondisi wana biloko binso bizali ee nayambi ee

 2. Nayambi ee, nayambi Yezu Kristu e Mokonzi,

     Azali mwana se moko wa Ye Nzambe Tata,

     Mwinda mowuti na Ye Nzambe wa solo, ee nayambi ee

3. Ayaki awa o nse, mpo ya kobikisa biso basumuki,

    Akamati nzoto na nguya y’Elimo Santu,

    Abotami na Mama Ngondo Maria, ee nayambi ee

4. Nayambi ee, ‘te ayoki mpasi awei mpe akundami,

    Abuti o likolo o mboka Tata wa Ye,

    Lokola bikoma bisantu bilobi, ee nayambi ee

5. Nayambi ee, ‘te akoya na nkembo mokolo mwa nsuka,

    Kokata likambo lya biso banso bato ba Ye,

    Bokonzi bwa ye nde bozali na nsuka te, ee nayambi

6. Nayambi ee, nayambi Elimo Santu e Mobondi,

    Mokambi wa Eklezy’esantu ya Yezu Kristu,

    Nasakoli bongo na motema mobimba, ee nayambi ee

7. Nayambi ee, nayambi Eklezy’esantu Katoliko,

    Lisanga lya basantu bolimbisi masumu,

    Nsekwa ya bato bomoi bwa lobiko. Amen, ee nayambi ee