Toyemba App

Nayambi mokonzi

T.Akundi

Refrain. Nayambi Ye nayambi Mokonzi e

1. Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa likolo na nse,

    Wa biloko bikomonono na biye bikomonono te

    Uhm nayambi e

2. Nayambi Mokonzi Yezu Kristu Mwana wa Nzambe

    Abotami na Tata naino bileko bibandi te

3. Tata aboti Ye kobota asali Ye te, Ye na Tata bazali se moko

4. Ye nde Nzamb’awuti na Nzambe, Mwinda mowuti na Mwinda,

    Nzambe wa solo awuti na Nzambe wa solo

5. Ayaki o nse mpo ya biso bato, mpo ya kobikisa biso,

    Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto.

6. O eleko ya Pontio Pilato, bamobaki o Kuruse

    Ayoki mpasi mpo ya biso o awei, akundami

7. Asekwi o mokolo mwa misato abuti o likolo

    Azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata.

8. Nayambi Elimo Santu akopesa biso bomoi,

    Awuti na Tata mpe Awuti na Mwana.

9. Tokumbamela Ye mpe tokembela Ye,

    Ye nde moto alobaka o monoko mwa baprofeta

10. Nayambi Eklezya se yoko, ezali ya bato banso,

      Ebandaka na bapostolo, nandimi batisimo se yoko

      Ekolongola masumu, nakozela nsekwa ya bawa

      Mpe bomoi bokoya nsima (2x)