Nayambi
Nayambie e e, nayambie e e
1. Nayambi Nzambe se moko, Tata wa bokasi bonso,
Mozalisi wa likolo na nse hum nayambi (hum hum nayambi (3x))
2. Mozalisi wa biloko binso, biye bikomonono,
Na biye bikomonono te hum nayambi (hum hum nayambi (3x))
3. Nayambi Mokonzi Yezu Kristu, Mwana wa Nzambe,
Abotami na Tata naino bileko bibandi te hum nayambi,
Naino bileko bibandi te hum nayambi (hi hi nayambi (3x))
Tenor : Ye Nzambe awuti na Nzambee,
Ye Mwinda awuti na Mwinda
Tous : Nzambe wa solo awuti na Nzambe wa solo (2x)
O o Nayambi (2x)
4. Tata aboti Ye kobota asali Ye te (2x), Mwana azali na Tata Nzambe moko
Na Ye Tata akeli biloko binso ooo nayambi
Oo nayambi (3x)
5. Ayaki awa o nse mpo ya biso bato o, mpo ya kobikisa biso,
Akamati nzoto na nguya y’Elimo Santu e,
Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto nayambi
hi hi nayambi (3x) Hum!
6. Babaki Ye o Kuruse e mpo ya biso,
O eleko ya Pontio Pilato o (2x),
Ayoki mpasi i, awei akundami ii i nayambi (3x)
Tenor : Asekwi nsima ya mikolo misato
7. Lokola ekomami o mikanda misantu e,
Abuti o likolo, azali o nkembo ya Nzambe Tata,
Nde ayei lisusu na nkembo, Kokata likambo lya bato banso,
Baye bazali na bomoi na baye bawa, Bokonzi bwa Ye nde bosuki te
Tenor : Nayambi Elimo Santu Mokonzi
8. Akopesa biso bomoi e e, awuti na Tata,
Awuti mpe na Mwana, tokumbamela Ye e,
Mpe tokembelela Ye e, elongo na Tata a, elongo mpe na Mwana a,
Ye nde moto alobaka na monoko mwa ba profeta a a
Tenor : Nayambi Eklezya se yoko Esantu
Tous : Ezali ya bato banso (2x) ebandaki na bapostolo
Tenor : Nandimi batisimo se yoko
9. Ekolongola masumu (2x) nakozela nsekwa ya bawa,
Mpe bomoi bokoya nsima, Amen, amen, amen.