Nayambi
Refrain. Nayambi e, nayambi e
Nayambi e, nayambi e (2x)
1. Nayambi Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa binso
2. Nayambi Yezu Kristu Mwana se moko wa Ye, Mokonzi wa biso e
3. Akomi moto na nguya y’Elimo Santu, abotami na Ngondo Maria
4. Ayoki mpasi o eleko ya Pontio Pilato, bamobaki o kuruse
5. Awei, akundami akiti o limbe, asekwi o mokolo mwa misato
6. Abuti o likolo, azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata wa bokasi bonso
7. Nde ayei lisusu kokata likambo lya bato banso,
Baye bazali na bomoi na baye bawa
8. Nayambi Elimo Santu, nayambi Eklezya Esantu katoliko
9. Nayambi nsekwa ya bato, bomoi bwa lobiko amen.