Toyemba App

Nayambi nzambe se moko

G.Mayenda

Refrain. Nayambi e, ngai nayambi e

Nayambi e Nzambe se moko (2x)

1. Nayambi Tata wa bokasi bonso,

    Mozalisi wa likolo na nse,

    Wa biloko bikomonono na biye bikomonono te

2. Nayambi Mokonzi Yezu Kristu,

    Mwana se moko wa Nzambe,

    Abotami na Tata nayino bileko bibandi te

3. Ye nde Nzamb’awu! na Nzambe,

    Ye mwinda mowuti na mwinda,

    Nzambe wa solo, awuti na Nzambe wa solo

4. Ayaki awa o nse mpo ya kobikisa biso,

   Abotami na Ngondo Maria mpe akomi moto

5. Bamobaki o kuruse o eleko ya Pontio Pilato,

   Awei, akundami nsima ya mikolo misato asekwi

   Lokola ekomami o mikanda misantu,

6. Abuti ’o likolo, azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata wa bokasi bonso

7. Nayambi Elimo Santu akopesa biso bomoi,

    Awuti na Tata mpe na Mwana

8. Nayambi Eklezy’Esantu amen

    Ezali ya bato banso amen

    Ebandaka na bapostolo amenNandimi batisimo se yoko amen

    Ekolongola masumu amen

    Nakozela nsekwa ya bawa amen

    Mpe bomoi bokoya nsima amen.