Toyemba App

Nayambi nayambi e

D.Mishibabo

Refrain. Nayambi, nayambi e, nayambi, ngai nayambi (2x)

1-10. Nayambi, nayambi e

1. Nayambi Nzambe Tata wa bokasi bonso: nayambi

    Mozalisi wa likolo na nse e: nayambi

2. Nayambi Yezu Kristu abotami na Tata: nayambi

    Ayaki awa o nse mpo ya biso bato: nayambi

3. Akomi moto na nguya ya Elimo Santu: nayambi

   Abotami na Ngondo Maria: nayambi

4. Ayoki mpasi o elek’o ya Pontio Pilato : nayambi

   Babaki Ye o Kuruse mpo ya biso bato

5. Awei, awei, akiti o limbe awei

6. Asekwi o mokolo mwa misato: nayambi

   Azali kuna o loboko la mobali la Nzambe Tata : nayambi

7. Nde ayei lisusu kokata likambo : nayambi

    Baye bazali na bomoi na baye bawa: nayambi

8. Nayambi Elimo Santu akopesa biso bomoi : nayambi.

    Bomoi awuti na Tata mpe na Mwana : nayambi.

9. Nayambi Eklezya Esantu se yoko : nayambi

    Bolimbisi bwa masumu ma bato : nayambi

10. Nakozela nsekwa ya bawa mpe bomoi bokoya nsima

      Amen (6x)