Nayambi nzambe tata
Refrain. Nayambi e Nzambe Tata,
Nayambi e Yezu Kristu,
Nayambi Elimo Santu
1. Nzambe Tata wa bokasi bonso, Mozalisi wa likolo na nse.
Wa biloko binso bikomono ee na biye bikomonono te.
2. Yezu Kristu, Mwana se moko, Mokonzi wa biso ;
Akomi moto na nguya ya Elimo Santu abotami na Ngondo Maria.
3. Ayoki bolozi o eleko ya Pontio Pilato; bamobaki o Kuruse;
Awei akundami, akiti o’limbe.
4. Asekwi (2x) o mokolo mwa misato, abuti o likolo,
Azali kuna o loboko la mobali, la Nzambe Tata.
5. Nde ayei lisusu kokata likambo lya bato banso,
Baye bazali na bomoi na baye bawa.
Nayambi e Elimo Santu, Eklezya Esantu Katoliko,
Lisanga lya basantu, bolimbisi masumu,
Nsekwa ya bato, bomoi bwa lobiko, Amen.