Ba israele
Refrain. Ba Israele balongwi o boombo bwa baezipeti
Na bolingi bwa Nzambe, bwa Nzambe wa biso (2x)
1. Mokonzi alobi na Moïse : tanda loboko likolo lya mbu
Mpo’te mai mazonga mpe mazindisa baezipeti
Na mituka mya bango na mpunda ya bango
2. Mokonzi abikisi Israel alongi na nkembo
Na bokasi bwa Ye bana ba Israel bakatisi mbu, bapoli mpe te
Zambi mai matelemi lokola lifelo
3. Nalingi koyembela Nzambe
Nazwi libiki na Nzambe wa ngai tika ‘te nakumisa
Mpe nayembela Elombe Mobikisi wa ngai na nzembo ya biso
4. Esengo etondi o mitema
Tokomi bansomi basolo mpenza ya Ye
Totondo Ye botondi na nzembo ya biso