Nzambe akeli
Refrain. Nzambe akeli likolo na nse
Nyama mpe ndeke ndenge na ndenge
Apesi mpe moto bokonzi bwa binso
Binso bya nse eye bizali bya Ye.
1. Ngai nazali moto lokola, kasi ngai nakomona mpasi
Basusu batondi na bomengo mingi;
Ngai mwana wa moto se mobola
Ngai naleli (4x)
2. Nzambe alingi ‘te bato banso balingana mpe basalisana
Wana mobeko mwa bana ba Nzambe;
Mobeko monene se bolingo
Linga se baninga (4x)
3. Mokolo mwa nsuka e, Nzambe mei akokita awa,
Kosambisa bato banso bakomonisa baninga mpasi
Sala se malamu (4x)
4. Nazalaki na mpasi e, oyaki kutu kosalisa ngai te
Nakotaki lopitalo e, oyaki kutu kotala ngai te
Sala se malamu (4x)