Toyemba App

Tata nakosambela

J.Vatoma kuntonesa

Refrain. Tata nakosambela mpo ya bango bazala moto moko (Tata)

1. Lokola Tata na ngai tozali moto moko,

    Tika bazala moko (tata)

2. Bayeba yo Nzambe wa solo se moko

    Bayeba mpe oyo otindeli bango (Tata)

3. Tango nazalaki na bango, nabatelaki bango

    O nkombo ya Yo Tata (Tata)

4. Bazalaki batoba Yo opesaki ngai bango

    Bayambi maloba ma Yo (Tata)

5. Napesi bango lokumu opesi ngai e

    Mpo ‘te bazala moko (Tata)