Toyemba App

Ye mei akeli

G.Dindo

 Refrain. Ye mei akeli biloko binso, Nzambe mei akokonza likolo na nse

Tomoyembela tomokumisa

1. Soki natali monene ya mokili, ekolakisa bonene bwa Nzambe

    Soki natali kitoko ya mokili ekolakisa bolingi bwa Nzambe,

    Tomoyembelaa

2. Soki natali bosantu bwa bato o ekolakisa bosantu bwa Nzambe,

    Ye nde Nzambe Tata mosantu, bato banso bakumisa se Ye,

    Tomokumisa a

3. Kati ya bikelamu bya Ye binso, apesi moto lokumu lonene,

   Mayele mpe bwanya atondisi na ye,

   Apesi ye bokonzi bwa binso, tomokumisa a.