Nazali mwana wa nzambe
Refrain. Nazali mwana wa Nzambe, Ye azali Tata wa ngai
Nazali mwana wa Nzambe, Tata mosusu azali te (2x)
1. Ye Tata abyangi ngai, tika nionso yaka kosalela ngai.
Nandimi maloba mana, nzela mosusu ezali te (solo)
2. Nzela ya Yo ezali mpasi, kaka Yo moko, okolendisa ngai
Nalanda nzela ya solo : nzela mosusu ezali te (solo)
3. E Tata nandimi solo maye manso ozali kosenga ngai
nalanda maloba ma yo : nzela mosusu ezali te (solo)
4. Yo ozali bomoi solo, na! ngama kaka kosalela Yo
nakoma na nsuka solo : nzela mosusu ezali te (solo)
5. Nandimi makambo manso ata mpasi eye ekoyela ngai
Nasengeli kondima inso : nzela mosusu ezali te (solo)
6. E Tata salisa ngai nalanda nzela olakisi ngai
Na nsuka nazwa libiki : nzela mosusu ezali te (solo)