Nakomituna
Refrain. Nakomituna (3x) ntina nini nakotungisa motema mwa ngai
Na makambo mingi ma mokili (2x)
1. Nayebi ‘te Nzambe asalaka moto mpo te awumela seko
(Nakomituna, nakomituna),
Amofandisi na elanga ya esengo na kimya inso. (Nakomituna, nakomituna)
amopesi mpe binso bizali na elanga bizala bya ye.
2. Bolingi bwa Nzambe epai ya moto bozali bonene (Nakomituna, nakomituna)
Kasi zabolo amemaka ye o nzela ya lisumu (Nakomituna, nakomituna)
Nzambe atali ye pamba o miso ma ba kerubim (Nakomituna, nakomituna)
3. Lisumu lipesi moto etumbu ya kolia na mpasi (Nakomituna, nakomituna)
Lisumu lipesi moto etumbu ya koyina (Nakomituna, nakomituna)
Lisumu lipesi moto etumbu ya kokabwana (Nakomituna, nakomituna)
Lisumu lipesi moto etumbu ya liwa (Nakomituna, nakomituna)
4. Moto amoni mabe asalaki, aleli na Nzambe (Nakomituna, nakomituna)
Nzambe ayoki boleli bwa ye mpe andimeli ye (Nakomituna, nakomituna)
atindi Mwana waye Yezu Kristu mpo te Abikisa ye (Nakomituna, nakomituna)
Kristu alakisi ye nzela ya liloba lya Nzambe (Nakomituna, nakomituna)
5. Ebongi ‘te ngai lelo nayeba soki nazali wapi (Nakomituna, nakomituna)
Mpasi to bisengo nazali komona, bimonana kala (Nakomituna, nakomituna)
Nayebi ‘te bato bakoya nsima bakomona mpe yango(Nakomituna, nakomituna),
Nayebi ‘te mabe manso nasalaka makobungisa ngai
(Nakomituna, nakomituna).
Ebongi ‘te nalanda Yezu-Kristu mpo ‘te abikisa ngai
(Nakomituna, nakomituna).