Bisengo bya nse eye
Refrain. Bisengo bya nse eye bizali na nsuka,
bisengo bya likolo biko wumela seko (2x).
1. Mokonzi Nzambe akeli mokili
Akeli ngai moto na lolenge la Ye na bolamu bonso.
2. Apesi ngai mokili, nyama, mbisi
Ndeke bizala binso mpo ya bolamu bwa ngai.
3. Satana na mokili abengi ngai na bikoseli
Alobeli ngai maloba malongoli ngai botosi
Makomisi ngai lolendo, nakwei o masumu.
4. Mabe nandimaki makaboli ngai na Nzambe
Makomisi ngai moombo ya bisengo bya mokili
Mamemeli ngai etumbu, mako! si ngai o mpasi. Mamemeli ngai liwa.
5. Mokonzi Nzambe ayokeli ngai mawa atindeli ngai Kristu
Alakisi ngai mwinda, apesi ngai liloba lifungoli ngai matoyi,
Lifungoli ngai motema.
6. Mokonzi Kristu akufi o kuruze alimbisi ngai masumu,
Apesi ngai libiki, alakisi ngai nzela bosolo mpe bomoi,
Bomoi bwa seko.Bokowumela (3x) seko.