Toyemba App

Zabolo ayei kosenginya yezu

A.Mbungu

1. Soko ozali Mwana wa Nzambe

    Bongola mabanga maye makoma mampa :

    Ekomami’te moto akobika bobele na mampa te

    kasi na maloba manso makobima o monoko mwa Nzambe

2. Soko ozali Mwana wa Nzambe

    Omibwaka o nse zambi banzelu bakoyamba Yo :

    Ekomami’te okomeka Mokonzi Nzambe wa yo te

3. Nakopesa yo nkembo inso ya nse,

    Soko okumbameli mpe okumisi ngai :

    Ekomami’te okokumbamela Mokonzi Nzambe wa yo

    Okokumisa se Ye moko