Toyemba App

Nkombo na yo ezali monene psaume 8

T.Père lulendo

Refrain. Nkombo n’o Mokonzi ezali monene

Nkombo na Yo e eza monene.

1. Bilenge, bana bake bakokumisa Yo

    Ekotela banguna o mitema.

2. Natali likolo, mosala mwa maboko ma Yo

    Sanza, minzoto otiaka kuna.

3. Nan’oyo moto mp’okanisa ye

    Mwana w’Adamu obatelaka ye.

4. Omotondisi na nkembo na lokumu

    Banzelu baleki ye se mwa moke.

5. Oti Ye Mokonz’ya bikelamu binso

    Biloko binso o nse ya makolo ma Ye.

6. Mpata, ngombe na nyama ya zamba

    Ndeke, mbisi mpe binso bifandi na mbu.