Toyemba App

Lisapo ya mampa na mbisi

B.Thuadi

Emoni Yezu ebele ya bato bakolanda Ye e,

Akotuna Filipo «Esika nini bokoki kosomba mampa

Mpo bato banso, mpo bato banso :

Baliya e, baliya e, baliya e (2x). »

Ezongisi Filipo na Ye, alobi ete

Atako mampa ma denario nkama mibale bikoki te

Mpo’te banso baliya.

Andrea, mozimi ya Petelo alobi «mwana moko azali awa,

Azali awa na mampa matano kaka mpe na mbisi,

Mpe na mbisi mibale kasi ekokoka te na banso bayei awa».

Yezu ayikini mampa amokaboli :

Refrain. Baliaki, baliaki bango banso batondaki (2x).

Na mampa matano kaka mpe na mbisi mibale (2x)