Mopepa
Refrain. Moto alandi Mokonzi azali na mwinda mwa bomoi (2x)
E esengo mpenza (2x).
1. Esengo na ye moto oyo akolanda malako ma basumuki te
Akima esika bakotonga e, akima esika songi-songi e
Songi-songi e, songi-songi e
2. Azali lokola nzete (2x), nzete elonami pembeni ya mai
Ekobota mbuma n’eleko elamu, nkasa na yango ekokauka te
3. Manso makosala ye (2x), makobongo malamu e
Akomona malamu e, akosepela, akosepela
4. Soki oponi mabe ma mokili : Ozali lokola likasa ekauka (2x)
Okopumbwa mpamba mpamba ndeko zonga
Mopep’ekobebisa yo e ndeko zonga
Mopep’ekobebisa yo e mopepa vanda
Mopep’ekobebisa yo e mopepa vandaka
5. E esengo (2x), mot’akobanga Nzambe:
E esengo na ye (2x)
E mopepa vanda (2x) ; Mopepa vanda ozwa libiki
Mopepa sambela omona nkembo
Mopepa vandisa nzoto oluka bosantu e