Moulani mwa talenta matthieu 25,14-30
1. Mokonzi opesaki ngai talenta itano
Tala nazwi litomba lya talenta itano (2x)
Mokonzi alobi na Ye :
1-2. Osali malamu yo mosaleli molamu mpe wa bosembo
Ozalaki moto wa bosembo na biloko mingi te
Nakotiya yo kapita wa biloko mingi
Yaka kosepela elongo na Mokonzi wa yo (2x) e
2. Mokonzi opesaki ngai talenta ibale
Tala nazwi litomba lya talenta ibale (2x)
Mokonzi alobi na ye :
3. Mokonzi opesaki ngai se talenta yoko
Nakundi yango o mabele zambi nabangaki Yo
Okobukaka mbuma esika olonaki te
Okolokotoko biloko esika okweisaki eloko te
Tala nazongiseli Yo mosolo mwa Yo, (2x) e
Mokonzi alobi na ye :
Mosaleli mabe, oyebaki ‘te nakobukaka mbuma esika nalonaki te
Nakolokotoko biloko esika nakweisaki te
Esengelaki t’opesa bato ba mombongo mosolo mwa Ngai
Bobotolo ye bongo talenta ya ye
Bopesa yango na oyo azali na talenta zomi
Mosaleli oyo wa mpamba babwaka ye o libanda
Okati ya molili akolela mpe akolia se mino