Bakonzi babale
Refrain. Moto moko te akoki kosalela bakonzi babale
Moko akolinga mosusu akoboya (2x)
1. Na bomoi bwa bino bomitungisa te mpo ya bilei
Mpe mpo ya molato
Pamba te bomoi boleki bilei mpe nzoto eleki bilamba na ntina
2. Botala ndeke alonaka te kasi aliyaka mikolo minso
Kasi moto aleki ndeke na motuya o miso ma Nzambe
3. Nani akoki kobakisa mokolo ata moko na bomoi bwa ye ? Moko te
4. Soki Nzambe akolatisa matiti ya zamba
Oyo lobi ekokauka mpe babwaki o moto
Boni boni akosala yango te mpo ya bino bato ?
Bozali solo na boyambi moke
5. Bomitungisa te mpo ya bilei mpe kolata na bino mpamba te
Nzambe ayebi ‘te bosengeli na yango
6. Na manso bokosala boluka naino bokonzi bwa likolo
Manso masusu nde bozui nsima