Biyema bisato
Refrain. Mokonzi awa malamu mingi natemisa biyema bisato (2x)
Yoko ya Yo, yoko ya Moize, yoko ya Elia
1. Elongi ya Ye engengi lokola mwese,
Bilamba bya Ye biteli lokola moi,
Talaka boye lisolo libandi na Moize mpe n’Elia, Petro alobi na Ye:
2. Limpata liyei kozipa bango bayoki kuna lolaka lobimi
Oyo Mwana wa ngai wa bolingo
Na tii motema na Ye banso boyoka Ye.
3. Eyoki bango lolaka lona, bayoki nsomo bakweyi bilongi o nse,
Kasi Yezu ayei kosimba bango ayebisi bango:
Boteleme, bobanga lisusu te.
4. Tango babandi kokita ngomba Yez’apekisi bango alobi boye :
Maye manso bomonoki boyebisa moto te, te nakosekwa e