Mongongo ewuti na mapata
Refrain. Mongongo ewuti na mapata a elobi:
Oyo azali mwana wa ngai,
Oyo naponi e,
Boyoka Ye (3x)
1. Yezu amemi Petro, Yakobo na Yoane, Yakobo na Yoane
Bamati o ngomba mpo ya kosambela;
Elongi ya Ye ebandi kongenge lokola moi,
Bilamba bya Ye pembe makasi,
Mose na Elia babimi, lisolo na Yezu.
2. Petro alobi e: Mokonzi malamu totelemisa biyema bisato,
Moko ya Yo, moko ya Mose, moko ya Elia
Limpata lizipi bango bayoki:
Usage liturgique : Transfiguration