Bisengo mwambe
Refrain. Esengo o esengo, esengo o
Esengo o esengo, esengo mingi
Zalani n’esengo, esengo mingi,
Yezu likolo lya ngomba na bayekoli ba Ye
Alobi boye «esengo mingi»
1. Esengo na bato ba motema bobola,
Bakoyingela o bokonzi bwa likolo:
1-8. Esengo mingi.
2. Esengo na bato ba motema boboto,
Bango nde bakonzi ba mokili:
3. Esengo na bato ba motema bakolela
Mawa ma bango nde mabongwami esengo:
4. Esengo na bato bakoyoka mposa ya bosembo
Bakotondisa bango:
5. Esengo na bato ba motema ngoluu, bakoyoka bango mpe ngolu:
6. Esengo na bato ba motema peto
Nde bamoni Nzambe (2x)
7. Esengo na bato bakoluka boyokani
Bakotangema bana ba Nzambe:
8. Esengo na bato bakoyoka minyoko mpo ya bosembo
Bakozwa bokonzi bwa likolo:
Refrain 2. Se bongo banyokolaki baprofeta liboso lya bino
1. Bakofi nga bino, bakobete bino o, bakotonga bino mpo ya Ngai,
Mpo ya Ngai, sepela a, sepela, sepelani mingi.
2. Bakoseka bino, bakotiola bino o, bakoyina bino mpo ya Ngai,
Mpo ya Ngai, sepela a, sepela, sepelani mingi