Tinda biso
Refrain. Tinda biso e Mokonzi Nzambe o elanga ya Yo enene,
Tokende kosangela, e tokende. E Mokonzi.
1. Kristu Ye mei ndakisa e,
Mokonzi, Profeta, Nganga Nzambe andimaki e! nda e.
2. Tokende o mikili minso mpe tokomisa banso bayekoli ba Yo
Wana nde e! nda ya Mokonzi.
3. Ngai oyo mosaleli wa Yo, tinda ngai bipai binso Mokonzi e
Nakende kosangela e.
4. Mawa na ngai mokristu, (2x) Soki nasangeli te,
Mokonzi akotinda ngai e lelo, iyo nandimi Mokonzi.
5. Ngai nakotinda bino e, bosakola e mpe bobatisa bato
O nkombo ya Tata, Mwana mpe y’Elimo Santu.