Toyemba App

Nazali nzete ya vino

D.Mishibabo

Refrain. Ngai nazali nzete ya vino, Tata wa ngai nde Nkolo wa elanga

Ngai nazali nzete ya vino, bino nde bitapi bya ngai

Bino nde bitapi bya ngai (3x)

1. Bitapi bya ngai bikobota mbuma te, nakokata byango.

2. Bitapi bya ngai bikobota mbuma mingi, nakobatela byango.

3. Bosili bokomi peto mpo ya mateya, nateyaki bino.

4. Bokangema na ngai, lokola ngai, nakangemi na bino.

5. Bokoki kobota mbuma mingi, soko bokangemi na ngai.