Toyemba App

Nakende lisusu wapi ?

D.Mishibabo

Refrain. Nakende lisusu wapi? Yo eyano ya mituna mya ngai,

Ntina nini ngai namitungisa,

Yo nde eyano ya mitungisi mya ngai.

1. Natamboli na mokili oyo, namoni te nani akosunga ngai,

    Nabelemi na lotale la Yo, nazwi eyano na mituna mya ngai.

2. Nakufeli mobali, bandeko banso basundoli ngai.

    Tina nini ngai Nakomitungisa

    Yo nde mobali ya baye bakufela babali.

3. Nakufeli baboti, bayi mokili balembi ngai.

    Tina nini ngai namitungisa

     Yo nde Tata ya baye bakufela baboti.

4. Na boyambi nde nalongi, na molende nde nakokoma,

    Natalela yo se Nzambe wa ngai, binso bya mokili bikoleka e:

    Nzela ya Kristu, nzela ya bomoi e,

    Nzela ya Kristu, nzela ya libiki. (2x)