Mayi ma bomoi
Intro : Mokonzi pesa ngai mai mana,
Nakoyoka lisusu mposa mai te,
Mposa ya mai te, mposa ya mai te.
Refrain. Yo nde mai ma bomoi (2x)
Yo liziba lya bomoi bwa ngai (2x)
Yo nde mai ma bomoi: na Yo nazwi bomoi bwa seko.
1. Na nzela ya mai obikisi Israel, olakisi bokasi bwa Yo,
Bokasi bwa Yo.
2. Na nzela ya mai, ozwaki ba! simo, olakisi nzela ya bomoi,
Nzela ya bomoi.
3. Na nzela ya mai nayingeli o libota, mpe nakomi moto ya sika e
Na Yezu Kristu.
4. Na nzela ya mai nde nakomi Mokristu, olakisi nzela ya bomoi,
Nzela ya bomoi.