Toyemba App

Nkembo, nkembo

D.Mgr bafuidinsoni

Refrain. Nkembo (6x) na Nzambe o likolo

O nse boboto na bato banso na bato banso batondi na bolingo

Nkembo na Tata nkembo na Mwana nkembo n’Elimo Santu

1. Tokoyembela Yo tokokumisa Yo e, tokokumbamela Yo Nzambe

    Tokokembela Yo tokotondo Yo e mpo ya nkembo ya Yo enene

2. Mokonzi Nzambe Nkumu wa likolo e Tata wa bokasi bonso

    Mokonzi Yezu Yezu Kristu Mwana se moko wa Ye

    Mokonzi Nzambe Mwa Mpata e wa Nzambe, Mwana wa Tata e

3. Yo moto okolongola masumu ma bato oyokela biso mawa

    Yo moto okolongola masumu ma bato o ndima losambo la biso

    Y’ozali o nkembo ya Nzambe Tata oyokela biso mawa

4. Yezu Kristu Yo moko Mosantu Yo moko Mokonzi oleki banso

    Elongo n’Elimo Santu o nkembo ya Nzambe

    Nzambe Tata Amen a men.