Nkembo na nzambe
Refrain. Nkembo na Nzambe o likolo, o nse boboto na bato ba bolingo.
1. Tokokumisa Yo, tokoyembela Yo, tokokumbamela Yo Nzambe, Tokotondo Yo.
2. Mokonzi Nzambe, Nkumu wa likolo, Tata, Tata wa bokasi bonso.
3. Mokonzi Yezu Kristu, Mwana se moko wa Nzambe, Yo nde Mwana, Mwanawa Tata.
4. Yo moko Mokonzi e, Yo moko Mosantu, Yo moko oleki banso.
5. Yo moto okolongola masumu ma nse, yoka biso mawa.
Yo moto okolongola masumu ma nse, ndima losambo la biso.
6. Yo ozali na nkembo ya Tata, oyoka biso mawa, Mwa Mpata ya Nzambe.
7. Elongo n’Elimo Santu, o nkembo ya Nzambe Tata, o nkembo ya Yezu Kristu,
nkembo n’Elimo Santu.
Amen: Amen (2x). Nkembo na Tata: Amen, Nkembo na Mwana : Amen,
Nkembo n’Elimo : Amen amen amen.