Nkembo na nzambe o likolo
Refrain. Nkembo na Nzambe o likolo, o nse boboto na bato babolingo
Nkembo (3x) o likolo (bis)
1. Tokokumisa Yo, tokokembela Yo
Tokokumbamela Yo e Nkumu monene
Mpo ya nkembo ya Yo enene (2x)
2. Mokonzi Nzambe e: Nkumu wa likolo
Nkumu wa likolo: Nkumu wa likolo
Tata wa bokasi bonso: Nkumu wa likolo
Yezu, Yezu Kristu Mwana wa Nzambe (2x)
3. Yo okolongola masumu ma biso
Yoka mawa a a yoka mawa (2x)
Yo okolongola masumu ma biso, ndima e e losambo la biso
Ndima e losambo la biso (2x)
Yo ofandi o loboko la Nzambe Tata:Yoka mawa a a yoka mawa (2x)
4. Yo moko Mosantu, Yo moko Mokonzi, Yo oleki banso (2x)
5. Elongo n‘Elimo: e yemba nkembo
Elimo Santu: e yemba nkembo
O nkembo ya Nzambe Tata a e: Yemba nkembo
Nkembo na Tata e, nkembo na Mwana a, nkembo n’Elimo o
Amen (4x)