Nkembo - misa tukufu
Refrain. Nkembo na Nzambe kuna o likolo, oh nkembo na Nzambe o likolo
Boboto o nse na bato balamu (nkembo) Bis
1. Tokokumisa Yo tokoyembela Yo e
Tokokumbamela Yo Tata e, e nkembo.
2. Tokokembela Yo, tokotondo Yo e,
Mpo ya nkembo ya yo enene, ee nkembo.
3. Mokonzi Nzambe Yo Nkumu wa likolo,
Tata wa bokasi zuwa nkembo, ee nkembo.
4. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Ye,
Mwa mpata ya Nzambe, Mwana wa Tata, e nkembo.
5. Okolongola masumu ma bato e, yoka biso mawa,
Okolongola masumu ma bato e
Ondima losambo la biso e, e nkembo.
6. Ofandi o loboko la Nzambe Tata e,
Oyokela biso mawa e, e nkembo.
7. Yo moko Mokonzi (2x) e, oleki banso o,
Oleki banso, ee nkembo.
8. Elongo n’Elimo, Elimo Santu o nkembo o ya Tata e Amen.