Nkembo na nzambe o likolo
Refrain. Nkembo na Nzambe o likolo,
O nse boboto na bato balamu (2x)
1. Tokokumisa Yo e Nzambe Tata e (2x)
Tokokembela, tokokumbamela se Yo Nzambe (2x)
2. Tokoyembela Yo e Nzambe Tata e
Tokotondo Yo e Nzambe Tata e
Mpo ya nkembo ya Yo enene
Nkembo ya Nzambe, nkembo enene
3. Mokonzi Nzambe e Nkumu wa likolo e
Tata wa bokasi bonso
Zwa, zwa a nkembo
4. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe
Mokonzi Yezu Kristu Yo nde Mwana wa Tata e
Nkembo na Yo Kristu, nkembo nkembo na Yo
5. Yo mot’okolongola masumu ma bato o nse (2x)
A! Mwa Mpata ya Nzambe: Yokela biso mawa
Mwa Mpata ya Nzambe Yokela biso mawa
Ofandi o loboko la mobali la Nzambe Tata (2x)
Mokonzi ndima ndima losambo la biso ndima losambo (2x)
6. Eee Kristu Yo moko Mokonzi e, e Kristu e
Yo moko Mosantu e Kristu Yo moko oleki banso
7. Elongo, elongo n’Elimo Santu u
Elongo, elongo n’Elimo Santu Mokonzi i
O nkembo ya Nzambe Tata, amen
Nkembo nkembo na Tata, amen (3x)
Nkembo nkembo na Mwana
Nkembo nkembo n’Elimo nkembo (6x)