Toyemba App

Nkembo na nzambe o likolo

A.Kele

Refrain. Nkembo na Nzambe o likolo o nse boboto na bato ba bolingo

Nkembo o nkembo nkemb’o likolo (2x)

1. Tokokumisa Yo tokoyembela Yo tokotondo Yo

    Mpo ya nkembo ya Yo Nkembo enene o likolo (2x)

2. Mokonzi Nzambe se Yo e, o likolo Nkumu se Yo e

    Tata wa bokasi bonso zwa nkembo (2x)

3. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe

    Mokonzi Nzambe Mwa Mpata ya Nzambe

4. Yo moto okolongola masumu ma nse

    Mwa mpata yokela biso mawa

    Mwa Mpata ndima losambo la biso

5. Elongo na Elimo Santu o nkembo ya Tata

    Amen (6x)

    Nkembo na Nzambe Tata: Amen amen amen

    Nkembo na Nzambe Mwana: Amen amen amen

    Nkembo n’Elimo Santu: Amen amen amen