Toyemba App

Nkembo o likolo

A.Libondo

Réfrain. Nkembo na Nzambe o likolo (2x)

O nse boboto na bato balamu

Nkembo e o likolo

Boboto na bato balamu nkembo o likolo

1. Tokokumisa Yo, tokoyembela Yo

    Tokokumbamela Yo, tokotondo Yo nkembo (A nkembo)

2. Mokonzi Nzambe Yo Nkumu wa likolo e

    Yo Tata wa bokasi bonso, ozwa nkembo (A nkembo)

3. Mokonzi Yezu Kristu Yo Mwana wa Nzambe

    Mwana wa Tata a nkembo e (A nkembo)

4. Yo moto okolongola masumu e

    Mwa Mpata ya Nzambe ndima losambo e (A nkembo)

5. Yo moko Mokonzi, Yo moko Mosantu

    Yo moko oleki banso o nkembo e (A nkembo)

6. Elongo na Elimo Santu: Amen amen amen

    Nkembo na Tata(2x): Amen amen amen

    Nkembo na Mwana(2x): Amen amen amen

    Nkembo na Elimo(2x): amen amen amen

    Banso lisanga(2x): Amen amen amen