Nkembo na nzambe o likolo
Réfrain. Nkembo na Nzambe o likolo o nse boboto
Na bato ba motema bolamu nkembo e, nkembo e (nkembo)
1. Tokoyembela Yo nkembo, tokokumbamela Yo e
Tokotondo Yo nkembo e, nkembo e (2x) (nkembo nkembo)
2. Tokotondo Yo Tata e mpo ya nkembo ya Yo enene
Nkembo enene, zwa nkembo
Zwa nkembo o zwa nkembo (2x) (nkembo nkembo)
3. Mokonzi Yezu Kristu Yo Mwana wa Tata e
Yo moko Mosantu mpe Mokonzi nkembo (2x) (nkembo nkembo)
4. Yo okolongola masumu ma nse
Mwa Mpata ya Nzambe oyokela biso mawa (2x) (nkembo nkembo)
5. Yo okolongola masumu ma nse
Mwa Mpata ya Nzambe ondima losambo (2x) (nkembo nkembo)
6. Amen, amen : Amen
Ozali n’Elimo Santu amen : Amen
O nkembo ya Nzambe Tata amen: Amen
Bino basato Nzambe moko amen : Amen
Tokoyemba nkembo nkembo : Amen
Tokobina nkembo nkembo amen : Amen
Amen amen amen : Amen