Toyemba App

Nkembo na nzambe o likolo

A.Mbungu

Refrain. Nkembo na Nzambe o likolo

O nse boboto na bato ba bolingo

Nkembo nkembo, nkembo (bis)

1. Tata tokokumisa Yo e, tokoyembela Yo

    Tokokumbamela Yo, tokotondo Yo

    Mpo ya nkembo ya Yo enene

2. Mokonzi Nzambe se Yo e Nkumu wa likolo

    Tata wa bokasi bonso, zwa nkembo

3. Mokonzi Yezu Kristu e, Mwana se moko wa Nzambe

    Mokonzi Nzambe, Mwa Mpata ya Nzambe

    Yo nde Mwana wa Tata

4. Yo moto okolongola masumu ma nse

    Mwa Mpata yokela biso mawa e

    Mwa Mpata ndima losambo la biso

5. Yo ofandi na nkembo ya Nzambe Tata

    Yokela biso mawa

6. Yezu Kristu e, Yo moko Mosantu

    Yezu Kristu e, Yo moko Mokonzi e, oleki banso

7. Elongo n’Elimo Santu

    O nkembo ya Nzambe Tata e : amen

    Nkembo na Tata : amen

    Nkembo na Mwana: amen, Nkembo n’Elimo: amen