Toyemba App

Nkembo o nta likolo

D.Tshaka moke

Refrain. Nkembo, nkembo na Nzambe o likolo

O nse boboto na bato ba bolingo

Nkembo o nta likolo

1. Tokokumisa Yo e, tokoyembela Yo

    Tokokumbamela Yo Nzambe se Yo Tata

1-8. Nkembo o nta likolo

2. Tokokembela Yo e, tokotondo Yo

    Mpo ya nkembo ya Yo enene nkembo na Yo Tata

3. Mokonzi Nzambe, Nkumu wa likolo

    Tata wa bokasi bonso zwa nkembo

4. Mokonzi Yezu Kristu, Mwana se moko wa Nzambe

    Mokonzi Nzambe, Mwa Mpata ya Nzambe, Mwana wa Tata

5. Yo moto okolongola masumu ma nse

    Mwa Mpata e oyokela biso mawa

6. Yo moto okolongola masumu ma nse

    Mwa Mpata ondima losambo la biso

7. Yo ofandi na nkembo ya Nzambe Tata e

    Mwa Mpata e oyokela biso mawa

8. Mokonzi Yezu Kristu, Yo moko Mosantu

    Yo moko Mokonzi, Yo moko oleki banso

9. Elongo n’Elimo Santu, Nkembo amen, amen, amen

    Nkembo, nkembo, nkembo na Tata

    Nkembo, nkembo, nkembo na Mwana

    Nkembo, nkembo, nkembo n’Elimo

    Nkembo, nkembo amen