Toyemba App

Nkembo o likolo

J.Belengo

Intro: Nkembo (3x)

Refrain. Nkembo o nkembo o likolo, nkembo o nse boboto na bato balamu

1. Tata o likolo tokumisa Yo, toyembela Yo elongo na banzelu

    O nkembo, tokumbamela Yo mpo ‘te ozalisi binso

2. Totondo Yo mpo ya nkembo ya Yo enene

    Yo Nkumu wa bankumu Mokonzi Nzambe

    Yo Nkumu wa bankumu otonda bokasi

    Yo nde Mokonzi e

3. Mokonzi Yezu Mwana se moko wa Nzambe

    Toyembela Yo mpo Yo nde Mwana wa Tata

    Toyembela Yo mpo Yo nde Mobikisi wa banse

4. Okolongola masumu ma nse, Mwa Mpata

    Mwa Mpata e yoka mawa, Mwa Mpata

    Mpata e ndima losambo

    Yo ofandi o loboko la Nzambe Tata yokela biso mawa

5. Yo moko Mosantu e, Yo moko Mokonzi e

    Yo Mwana wa Nzambe oleki banso (2x)

6. Elongo n’Elimo Santu: amen

   O nkembo ya Nzambe Tata: amen

   O bileko binso seko: amen

   Amen nkembo na Tata a mpe na Mwana

   N’Elimo Santu nkembo: amen