Toyemba App

Nkembo 2000

J.Abbé makamba

Intro : Nkembo (14x) nkembo na Nzambe Tata o likolo nkembo

O nse boboto na bato ba bolingo nkembo oo

O nse boboto na bato ba bolingo

Refrain. Nkembo (6x) o nkembo kun’olikolo

1. Tokoyembela Yo, tokokumisa Yo, tokokumbamela Yo

    Tokokembela Yo, tokotondo Yo

    Mpo ya nkembo ya Yo enene, nkembo enene, o likolo

2. Mokonzi Nzambe e, Nkumu, Nkumu wa likolo

    Tata wa bokasi bonso, o! Wa bokasi bonso

     Zwa nkembo (5x)

3. Mokonzi Yezu Kristu e, Mwana se moko wa Nzambe e

    Yo Mwana wa Tata, olele oye (2x)

    Mwa Mpata

    Mpata ya Nzambe e, olele oye (2x)

    Okolongola masumu ma bato, Yokela biso mawa (2x)

    Mwa Mpata Mpata ya Nzambe ndima losambo la biso (2x)

    Yo ofandi o loboko la Nzambe Tata ndima losambo la biso (2x)

4. Eee Yezu Kristu, Yezu Kristu (2x); Yo moko Mokonzi e

    Eee Yezu Kristu, Yezu Kristu Yo moko moko Mosantu e

    Yo mok’oleki banso, iya o iya iya iya o iya (2x)

5. Elongo n’Elimo Santu Santu, (amen (x))