Toyemba App

Nkembo na nzambe o likolo

J.Belengo

Refrain Nkembo na Nzambe o likolo nkembo

Nkembo o nse boboto na bato ba motema molamu nkembo (2x)

1. Tokokumisa Yo, nkembo na Nzambe, tokokembela Yo

    Tokokumbamela Yo, tokotondo mpo ya nkembo ya Yo enene

2. Mokonzi Nzambe Nkumu wa likolo

    Nzambe Tata wa bokasi bonso

3. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe

    Yo nde Mwana wa Tata e nkembo na Yo e

4. Yo nde Mwa Mpata ya Nzambe e, okolongola masumu ma bato

    Yokela biso mawa; Yo nde Mwa Mpata ya Nzambe e

    Okolongola masumu ma bato, ndima losambo la biso

5. Ozali o loboko la mobali la Nzambe Tata

    Yokela biso mawa e

6. Yo moko Mosantu : Yezu Kristu

    Yo moko Mokonzi : Yezu Kristu

    Yo moko oleki banso : Yezu Kristu

7. Elongo n’Elimo Santu o nkembo ya Nzambe Tata e

    Nkembo na Nzambe nkembo o likolo

    Nkembo na Nzambe o likolo o nse boboto na bato ba bolingo

    Nkembo, nkembo, nkembo, amen