Toyemba App

Nkembo na nzambe o likolo

B.Massabu

Refrain. Nkembo na Nzambe e o nta likolo (2x)

O nse e boboto na bato balamu (4x)

1. Tokokumisa Yo e, tokokembela Yo, tokokumbamela Yo e

    Tokotondo Yo, Mokonzi Nzambe, Nkumu wa bokasi bonso

    Zwa nkembo, nkembo enene, zwa nkembo enene

2. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe

    Yo nde Mwana wa Tata, Yonde Mwana wa Ye Tata e

    O nkembo na Yo e

3. Yo moto okolongola masumu ma bato

    Mwa Mpata Yokela biso mawa

    Mwa Mpata e ondima losambo la biso

   O nkembo na Yo e

4. Yo moko o Mokonzi e, Yo moko Mosantu e

    Yo moko o oleki banso nkembo na Yo

5. Ozali elongo o n’Elimo Santu, amen

    O nkembo ya Nzambe Tata, amen

    O nkembo nkembo na Mwana, amen

    O nkembo nkembo n’Elimo amen, amen, amen